Zakari 11:3 - Mokanda na Bomoi3 Boyoka ndenge babateli bibwele bazali kolela, pamba te bitando epai wapi baleisaka bibwele ebebisami. Boyoka ndenge bankosi ezali koganga, pamba te zamba ya Yordani, oyo etonda na banzete, esili kobebisama. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Edomi na mokili na yango na mbala moko ; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Edomi. Nani akokani na Ngai ? Nani akoki kobeta tembe na Ngai ? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ?
Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Babiloni na mokili na yango na mbala moko ; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Babiloni. Nani akokani na Ngai ? Nani akoki kobeta tembe na Ngai ? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ? »