Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 11:11 - Mokanda na Bomoi

11 Boyokani esilaki nde na mokolo wana ; bongo, etonga oyo ezalaki na pasi makasi mpe ezalaki kotala ngai esosolaki ete ezalaki solo Liloba na Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 11:11
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mbongo ya mpako ya bato ya mombongo oyo bazalaki koteka biloko oyo bazalaki kosomba na bamboka ya bapaya, mpe mbongo ya mpako ya bateki biloko ya ndenge na ndenge. Bakonzi nyonso ya Arabi mpe bayangeli ya bituka bazalaki komema wolo mpe palata epai ya Salomo.


Babola bamoni mpe bazali kosepela. Tika ete mitema na bino oyo bolukaka Nzambe ezala na bomoi !


Eyano nini tokopesa penza epai ya bamemi sango ya ekolo oyo ? Ezali ete Yawe asili kolendisa Siona mpo ete babola kati na bato na Ye basili kozwa ebombamelo ya malonga. »


basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika : bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.


Nakotalela Yawe oyo abombi elongi na Ye, oyo apesi ndako ya Jakobi mokongo ; nakotia elikya na ngai kati na Ye.


Bongo, kaka ndenge Yawe alobaki, Anameyeli, mwana ya noko na ngai, ayaki kotala ngai kati na lopango ya bakengeli mpe alobaki : ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti kati na etuka ya Benjame, pamba te yo nde ozali na makoki ya kosikola yango mpe ya kozwa yango ; somba na yo yango. › Nasosolaki ete ezali Liloba na Yawe ;


Kasi mpo na ngai, nakotia elikya na ngai epai na Yawe, nakotalela Nzambe, Mobikisi na ngai ; Nzambe na ngai akoyoka ngai.


Kasi kati na bino, nakotika bato oyo bakelela, bato oyo batambolaka na komikitisa, bato oyo bakozwa ebombamelo kati na Kombo na Yawe.


kasi bazalaki kokoka te, pamba te bato nyonso bazalaki koyoka Yesu na bokebi.


Na tango wana, kati na Yelusalemi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki Simeoni. Azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa makambo ya Nzambe ; azalaki kozela kobondisama ya Isalaele, mpe Molimo Mosantu azalaki likolo na ye.


Awa ayaki mpe kaka na ngonga wana, abandaki kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe koloba na tina na Mwana Yesu, epai ya bato nyonso oyo bazalaki kozela ete Nzambe akangola Yelusalemi.


mpe andimaki te mikano mpe misala ya bato mosusu ya Likita-Monene ; azalaki moto ya mboka Arimate, engumba ya Bayuda, mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe.


Boye, Yesu azongiselaki bayekoli oyo Yoane atindaki : — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe oyo boyoki : bakufi miso bazali komona, bakufi matoyi bazali koyoka, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.


Tango bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango, nzembo oyo ekotatola mpo na kofunda bango, pamba te bakitani na bango bakobosana yango te. Nayebi makambo oyo bazali kokana kosala atako nakotisi bango nanu te kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi. »


Pamba te nayebi solo ete sima na kufa na ngai, bokomibebisa mpe bokopengwa mosika na nzela oyo natindaki bino. Na mikolo oyo ezali koya, bokono ekokweyela bino, pamba te bokosala mabe na miso ya Yawe mpe bokotumbola kanda na Ye na nzela ya misala ya maboko na bino. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ