Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 11:10 - Mokanda na Bomoi

10 Nakamataki lingenda oyo nabengaki Ngolu, nabukaki yango mpo na kotalisa ete boyokani oyo nasalaki elongo na bikolo nyonso esili.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 11:10
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta na Siona, mboka kitoko, Nzambe azali kongenga lokola moyi.


Nzokande, obwakaki, omonaki pamba, osilikelaki mopakolami na Yo !


Tika ete boboto ya Nkolo, Nzambe na biso, ezala elongo na biso ! Mpo na biso, sala ete misala na biso ekende liboso ! Iyo, sala ete misala na biso ekende kaka liboso !


Koyina biso te mpo na lokumu ya Kombo na Yo ! Kobebisa te nkembo ya Kiti ya Bokonzi na Yo ! Kanisa boyokani oyo osalaki elongo na biso mpe kobebisa yango te !


« Yebisa libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kosambwisa bosantu ya Esika na Ngai ya bule oyo esalaka lolendo na bino, oyo esepelisaka miso na bino mpe esalaka esengo ya mitema na bino. Bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo botikaki na Yelusalemi bakokufa na mopanga.


Sima na baposo tuku motoba na mibale, bakoboma Ye oyo azwaki epakolami, atako asalaki na ye mabe ata moko te. Bato ya mokambi oyo azali koya bakobebisa engumba mpe Esika ya bule, mpe suka na yango ekoya lokola mpela ; bongo kino suka ya bitumba ekoma, kobebisama ekozala mpo ete mokano na yango esili kozwama.


Yawe alobaki : — Pesa ye kombo Lo-Ami, pamba te bozali bato na Ngai te, mpe Ngai nazali Nzambe na bino te.


Boye, nabatelaki malamu bameme oyo babongisaki mpo na koboma ; mpe mingi penza bameme oyo ezalaki na pasi makasi. Nakamataki mangenda mibale : nabengaki moko Ngolu, mpe mosusu, Bomoko. Bongo, nakomaki kobatela bameme.


Lokola bosalaki mikolo tuku minei mpo na kononga mokili, bokomona pasi mibu tuku minei mpo na masumu na bino : mobu moko mpo na mokolo moko. Na bongo bokoyeba mbano oyo ezali kati na likambo ya kotelemela Ngai.


Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.


Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ