Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 10:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nakobeta piololo mpo na kobenga bango mpe nakosangisa bango esika moko. Solo, nakokangola bango, mpe bakokoma ebele ndenge bazalaki liboso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 10:8
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene ; bazalaki kolia, komela mpe bazalaki na esengo.


Kasi bana ya Isalaele babotanaki mingi mpe bakomaki ebele penza. Bakomaki lisusu ebele koleka mpe makasi mingi : batondisaki mokili ya Ejipito.


Nalongoli mabe na yo lokola lipata, masumu na yo lokola lipata ya tongo. Zonga epai na Ngai, pamba te nasili kosikola yo. »


Bobima na Babiloni, bokima wuta na bato ya Babiloni ! Boloba yango na makelele ya esengo mpe botatola yango ; bopanza sango na yango kino na suka ya mokili ; boloba : ‹ Yawe asikoli Jakobi, mosali na Ye. › »


Yawe atomboli bendele mpo na bikolo oyo ezali mosika, azali kobeta piololo mpo na kobenga bato oyo bazali na suka ya mokili : tala bango wana, bazali koya na lombangu mpe noki !


Boye, bato oyo Yawe akangoli bakozonga, bakokota kati na Siona na banzembo ya esengo ; esengo ya libela na libela ekozala lokola motole na mito na bango ; bakotondisama na esengo mpe na kosepela, bongo pasi mpe minyoko ekokima mosika na bango.


Na mokolo wana, Yawe akobeta piololo mpo na kobenga nzinzi wuta na miluka ya Ejipito mpe banzoyi oyo ezalaka na mokili ya Asiri ;


ekoya mpe ekovanda kati na mabwaku ya mozindo mpe na madusu ya mabanga, na banzete nyonso ya mike-mike mpe na matiti nyonso.


Ndenge kaka bakoki kotanga te mampinga ya likolo mpe zelo ya bibale minene mpo na koyeba motango na yango, ndenge wana mpe nakokomisa ebele, bakitani ya Davidi, mosali na Ngai, mpe Balevi oyo basalelaka Ngai. › »


Oh bakitani ya Jakobi, nakosangisa bino nyonso, nakosangisa batikali nyonso ya Isalaele. Nakosangisa bango lokola bameme kati na lopango, lokola bibwele kati na etando na yango ya kolia matiti. Makelele oyo ekoyokana kuna ekozala makelele ya bato ebele.


Mpo na yo, likolo ya makila ya boyokani na Ngai elongo na yo, nakobimisa bakangami na yo na libulu oyo ezanga mayi.


Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi.


Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi : — Yaka ! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba : « Yaka ! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya ; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.


Sima na makambo wana, namonaki ebele ya bato oyo moto ata moko te akokaki kotanga ; bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya Bokonzi mpe liboso ya Mpate, balataki banzambala ya pembe mpe basimbaki mandalala na maboko na bango ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ