Zakari 10:2 - Mokanda na Bomoi2 Nzokande, banzambe ya bikeko elobaka maloba ya pamba, mpe bimoniseli ya bato ya soloka ezalaka ya lokuta : bazwaka bandoto oyo ezanga tina, mpe malendisi na bango ezalaka ya lokuta. Yango wana, bato bakomaki kotelengana lokola bibwele oyo ezangi mobateli. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta ; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te ; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe.
Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, lokola bibwele na Ngai ezangi mobateli, bongo bakomi koyiba yango mpe ekomi bilei ya banyama nyonso ya zamba ; lokola babateli bibwele na Ngai bazalaki koluka bibwele na Ngai te, kasi bazalaki kaka koluka kaka bolamu na bango moko koleka bolamu ya bibwele na Ngai ;