Oyo aleki moke kati na bino akokoma nkoto moko, mpe oyo aleki moke penza akokoma ekolo ya makasi. Ngai, nazali Yawe, nakoyeisa yango mbangu na tango na yango. »
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na ndako ya mokonzi ya Yuda : « Ata soki ozali lokola Galadi na miso na Ngai, lokola songe ya ngomba ya Libani ; solo, nakokomisa yo lokola esobe, lokola engumba oyo bato bavandaka te.
Kasi nakozongisa Isalaele na lopango na ye ; mpe akolia lisusu matiti ya ngomba Karimeli mpe ya Bashani. Nzala na ye ekosila na etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe ya Galadi.
Bato ya Isalaele oyo bazalaki na bowumbu bakozwa mokili ya bato ya Kanana kino na Sarepita ; bongo bato ya Yelusalemi oyo bazalaki na bowumbu na Sefaradi bakozwa bingumba ya Negevi.
Kamba bato na Yo na lingenda na Yo ndenge mobateli bibwele asalaka ! Pamba te bazali bameme ya libula na Yo, oyo ezali lokola kotelengana yango moko kati na zamba, na etando moko ya kitoko. Tika ete elia na bilanga ya Bashani mpe ya Galadi ndenge ezalaki kolia na tango ya kala.