Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 1:8 - Mokanda na Bomoi

8 Na butu, nazwaki emoniseli moko : namonaki liboso na ngai moto moko azali kotambolisa mpunda moko ya langi ya motane ; moto yango atelemaki kati na banzete ya mirite oyo ezalaki kati na lubwaku. Na sima na ye, ezalaki na bampunda mosusu ya langi ya motane, ya shokola mpe ya pembe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 1:8
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. »


Na butu, Nzambe alobaki na Isalaele na nzela ya emoniseli : — Jakobi ! Jakobi ! Jakobi azongisaki : — Ngai oyo.


Na Gabaoni, Yawe amimonisaki epai ya Salomo kati na ndoto ya butu. Nzambe alobaki na ye : — Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo.


mpe basengeli kotatola to kopanza kati na bingumba na bango nyonso mpe kati na Yelusalemi liloba oyo : « Bobima wuta na mokili ya bangomba, bomema longwa kuna bitape ya nzete ya olive ya mboka mpe ya zamba, bitape ya nzete ya mirite, mandalala mpe bitape ya nzete ya makasa ebele mpo na kotonga bandako ya matiti, kolanda ndenge ekomama. »


kati na bandoto ya butu, na tango bato bazwaka pongi makasi,


Mobali na ngai ya bolingo azali ya ngai, mpe ngai nazali ya ye ; aleisaka bibwele na ye na bilanga oyo etondi na bafololo oyo babengaka lisi.


Mobali na ngai akei na elanga na ye, na mikala ya banzete ya solo kitoko mpo na koleisa bibwele na ye mpe kobuka fololo oyo babengaka lisi.


nakolona kati na esobe : banzete ya sedele, ya akasia, ya mirite mpe banzete ya olive ; nakotia banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwi esika moko kati na mabele ya kokawuka,


Nzete ya sipele ekobota na esika ya banzube, nzete ya mirite ekobota na esika ya basende ; ekozala, mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, elembo ya libela na libela, oyo ekotikala kobebisama te. »


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Bongo na butu, Daniele azwaki emoniseli oyo elakisaki ye mabombami yango ; boye, akumisaki Nzambe ya Lola.


Kati na bimoniseli na ngai ya butu, namonaki moto moko lokola Mwana na Moto koya elongo na mapata ya likolo ; apusanaki pene ya Mpaka oyo azala liboso ya tango, mpe bamemaki ye liboso na Ye.


Daniele alobaki : Na emoniseli oyo nazwaki na butu, namonaki mipepe minei kowuta na likolo mpe eningisaki ebale monene.


Moto oyo azalaki kati na banzete ya mirite alimbolaki : — Ezali bato oyo Yawe atindaki mpo na kotambola na mabele.


Bato yango bayebisaki Anjelu ya Yawe, oyo atelemaki kati na banzete ya mirite : — Towuti kotambola na mabele mpe tokuti kimia mpe bopemi na mokili mobimba.


Na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya zomi na moko, sanza ya shebati, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Zakari, mwana mobali ya Barashi, mwana mobali ya Ido.


Oh mopanga, telema ! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.


alobaki : — Boyoka maloba na Ngai ! Soki mosakoli moko ya Yawe azali kati na bino, namimonisaka Ngai moko epai na ye na nzela ya bimoniseli, nalobaka na ye na nzela ya bandoto.


Nzokande, tango Jozue azalaki pene ya Jeriko, atombolaki miso mpe amonaki moto moko atelemi liboso na ye ; moto yango asimbaki mopanga na loboko na ye. Jozue apusanaki pene na ye mpe atunaki ye : — Boni, ozali na ngambo na biso to na ngambo ya banguna na biso ?


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Efeso : « Tala maloba ya Ye oyo asimbi minzoto sambo na loboko na Ye ya mobali mpe atambolaka kati na bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo :


Natalaki mpe namonaki liboso na ngai mpunda moko ya pembe. Motambolisi na yango asimbaki tolotolo. Bapesaki ye motole, bongo abimaki lokola molongi mpe mpo ete azala molongi.


Bongo mpunda mosusu ebimaki : ezalaki ya motane makasi. Motambolisi na yango apesamelaki nguya ya kolongola kimia na mokili mpe ya kosala ete bato babomana bango na bango. Mpe bapesaki ye lisusu mopanga moko ya monene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ