Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 1:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bozala te lokola bakoko na bino, epai ya banani basakoli ya tango ya kala balobaki : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Botika banzela mabe mpe misala na bino ya mabe, bozonga epai na Ngai ! › Kasi basalaki keba te na maloba na Ngai, mpe batosaki Ngai te, elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 1:4
55 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na etinda ya mokonzi, bamemi sango bakendeki kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, na mikanda oyo ewutaki epai ya mokonzi mpe bakalaka na ye. Tala makambo oyo ezalaki kati na mikanda yango : « Bana ya Isalaele, bozongela Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele, mpo ete Ye mpe azongela bino oyo bobiki na maboko ya bakonzi ya mboka Asiri !


Bozala te lokola batata mpe bandeko na bino oyo bazangaki boyengebene liboso ya Yawe, Nzambe ya batata na bango. Yango wana asalaki ete babebisama ndenge bozali komona.


— Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai mpe mpo na batikali ya Isalaele mpe ya Yuda ; botuna na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana, pamba te kanda ya Yawe, oyo ekweyeli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te Liloba na Yawe mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na buku oyo.


Wuta na tango ya bakoko na biso kino na mokolo ya lelo, mabe na biso ekomi ebele. Likolo ya masumu na biso, biso elongo na bakonzi mpe Banganga-Nzambe na biso tokabamaki na mopanga, na bowumbu, na kobebisama mpe na soni makasi na maboko ya bakonzi ya bapaya, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.


Kasi bango, bakoko na biso, bakomaki lolendo mpe mito makasi, batosaki mibeko na Yo te.


Kasi batosaki Yo te mpe batombokelaki Yo, bapesaki Mibeko na Yo mokongo, babomaki basakoli na Yo, oyo bazalaki koteya bango ete bazonga epai na Yo, mpe batiolaki Yo makasi na maloba na bango.


Ozalaki na motema monene liboso na bango wuta mibu ebele mpe, na nzela ya Molimo na Yo, okebisaki bango na nzela ya basakoli na Yo. Kasi bayokaki kaka te. Boye okabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya.


Boye, bakozala te lokola bakoko na bango, oyo bazalaki mito makasi mpe batomboki, oyo mitema na bango ezalaki sembo te na miso ya Nzambe, mpe milimo na bango ezangaki boyengebene epai na Ye.


Oh bana ya Isalaele, bozonga epai na Ye oyo botombokeli makasi !


Yango wana, yebisa sik’oyo bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Tala, nasili kozwa mokano ya kotindela bino pasi, mpe nazali na mabongisi ya kosala bino mabe. Boye, tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe, abongola bizaleli mpe misala na ye. ›


Soki solo bazalaki na mayangani na Ngai, balingaki nde koloba maloba na Ngai epai ya bato na Ngai, mpe bato na Ngai balingaki kotika banzela mpe misala na bango ya mabe !


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Lokola boyokaki maloba na Ngai te,


mpe boboyi kotosa maloba ya basali na Ngai, basakoli, oyo nazalaki kotindela bino tango na tango atako boboyaki koyokela bango,


Kende kosakola sango oyo na nor : ‹ Oh mopengwi Isalaele, zonga, › elobi Yawe, ‹ Nakokangela yo lisusu elongi te, pamba te nazali Moyengebene, › elobi Yawe. ‹ Nakokangela yo lisusu kanda te mpo na libela.


« Bozonga epai na Ngai, bino batomboki, » elobi Yawe, « pamba te nazali mobali na bino ya libala. Kati na bino, nakozwa moto moko kati na engumba moko na moko, mpe bato mibale kati na etuka moko na moko, mpo na kozongisa bino na Siona.


Nazalaki tango na tango kotindela bino basali na Ngai nyonso, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe mpe abongola bizaleli na ye ; bosalela banzambe mosusu te mpo ete bokoka kovanda kati na mokili oyo napesaki bino mpe batata na bino. › Kasi boyokaki Ngai te mpe botosaki Ngai te.


« Oh Isalaele, soki okozonga, zonga epai na Ngai, » elobi Yawe, « soki olongoli banzambe na yo ya bikeko liboso na Ngai mpe otiki kotambola libanda ya nzela na Ngai ;


— Te ! Tokoyoka te makambo oyo ozali koyebisa biso na kombo ya Yawe.


Yango wana, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Bobongola mitema ! Bopesa banzambe na bino ya bikeko mikongo mpe botika misala na bino ya mbindo !


Nalobaki na bana na bango kati na esobe : ‘ Bolanda bikeko ya batata na bino te, botosa mibeko na bango te to bomikomisa mbindo te na banzambe na bango ya bikeko !


Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›


Soki moto moko ayoki lolaka ya kelelo, kasi azwi yango na pamba mpe mopanga ebomi ye, makila na ye ekotangama na moto na ye moko.


Toyokelaki te basali na Yo, basakoli, oyo balobaki na Kombo na Yo epai ya bakonzi na biso, bakambi na biso, bakoko na biso mpe epai ya bato nyonso ya mokili.


Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu mpo na mabe na bango, pamba te batombokeli Nzambe na bango. Bato bakokufa na mopanga ; bakonyata-nyata babebe na bango, bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.


Kasi tika ete makambo ekatama na bosolo ndenge ebale etiolaka, mpe bosembo etambola lokola ebale oyo ekawukaka te.


Basakoli na bango bazalaki koloba : « Kosakola te, kosakola makambo ya boye te ! Pasi ekokomela biso te. »


Yango wana, loba na bato oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bozonga epai na Ngai, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe Ngai nakozonga epai na bino, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Yango ezali te liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya basakoli na Ye wuta kala tango Yelusalemi mpe bingumba oyo ezingelaki yango ezalaki na kimia mpe na boyokani, mpe Negevi mpe Shefela etondaki na bato ebele ? »


Nateyaki liboso bavandi ya Damasi ; sima, nateyaki bavandi ya Yelusalemi, ya Yuda mobimba mpe ya bikolo ya bapaya : nateyaki bango ete basengeli kobongola mitema, kozonga epai ya Nzambe mpe, na nzela ya misala na bango, kolakisa penza ete babongoli mitema.


Yango wana, bobongola mitema mpe bozonga epai ya Nzambe mpo ete alimbisa masumu na bino,


Boyebi malamu ete ezali te na nzela ya biloko oyo ebebaka lokola wolo to palata nde Nzambe akangolaki bino na bizaleli ezanga tina, oyo bozwaki epai ya bakoko na bino,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ