Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 1:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bongo Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai alobaki : — Tatola maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Yelusalemi mpe Siona.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 1:14
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te, na Yelusalemi, ndambo ya bato bakotikala ; mpe na Siona, mwa ndambo bakobika. Bolingo makasi na Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde ekokokisa yango.


Ezekiasi alobaki : — Elembo nini ekolakisa ngai ete nakokende na Tempelo ya Yawe ?


Bobondisa, bobondisa bato na Ngai, elobi Nzambe na bino.


Boloba kati na Yelusalemi, boyebisa ye ete minyoko na ye ekomi na suka, masumu na ye esili kolimbisama, pamba te asili kozwa na loboko ya Yawe ngolu koleka mbala mibale mpo na masumu na ye nyonso.


Mongongo moko elobi : « Belela ! » Mpe nazongisaki : « Nabelela likambo nini ? » « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga.


Yawe akobima lokola elombe, akopelisa zuwa na Ye lokola mobundi bitumba ; akoganga, solo ; akoganga makasi, mpe akolonga banguna na Ye.


Alati bosembo lokola ebombelo ya tolo, mpe ekoti ya lobiko na moto na Ye ; alati kozongisa mabe na mabe lokola nzambala, mpe amizipi zuwa lokola kazaka.


Tala wuta na likolo mpe mona wuta na ndako na Yo ya bule mpe ya nkembo : Wapi bolingo na Yo, oyo eleka ndelo mpe nguya na Yo ? Bolingo mpe mawa na Yo mpo na biso esili ?


Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.


tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : na zuwa na Ngai ya makasi, natombokeli bikolo oyo etikali mpe mokili mobimba ya Edomi, pamba te na esengo nyonso mpe na mayele mabe kati na mitema na bango, bakomisi mokili na Ngai lokola libula na bango moko mpo ete babotola bilanga na yango nyonso na makasi. ›


Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.


Yawe akotonda na zuwa mpo na mokili na Ye mpe akoyokela bato na Ye mawa.


Yawe azali Nzambe oyo atonda na zuwa, oyo azongisaka mabe na mabe. Yawe azongisaka mabe na mabe mpe atombokaka makasi. Yawe azongisaka mabe na mabe epai ya banguna na Ye, akangelaka bayini na Ye kanda makasi.


Yawe abimisaki maloba ya kimia mpe ya kobondisa, na monoko ya Anjelu oyo azalaki koloba na ngai.


Tatola lisusu : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bingumba na Ngai ekotondisama lisusu na bomengo, Yawe akobondisa lisusu Siona mpe akopona Yelusalemi. › »


Natunaki : — Nkolo na ngai, bampunda oyo elingi kolakisa nini ? Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongisaki : — Nakolakisa yo tina na yango.


Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongaki mpe alamusaki ngai ndenge balamusaka moto oyo alali pongi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ