Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 1:13 - Mokanda na Bomoi

13 Yawe abimisaki maloba ya kimia mpe ya kobondisa, na monoko ya Anjelu oyo azalaki koloba na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 1:13
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Namonaki banzela na ye, kasi nakobikisa ye ; nakotambolisa ye mpe nakobondisa ye.


Kasi tala liloba oyo Yawe alobi : « Tango mibu tuku sambo ekokoka mpo na Babiloni, nakoya epai na bino mpe nakokokisa elaka na Ngai ya ngolu mpo na kozongisa bino na esika oyo.


Moko kati na bango alobaki epai ya moto oyo alataki bilamba ya lino mpe atelemaki likolo ya mayi ya ebale : — Makambo oyo ya kokamwa ekosala tango boni ?


Natunaki : — Nkolo na ngai, bampunda oyo elingi kolakisa nini ? Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongisaki : — Nakolakisa yo tina na yango.


Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongaki mpe alamusaki ngai ndenge balamusaka moto oyo alali pongi.


« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Mikolo ya kokila bilei ya sanza ya minei, ya mitano, ya sambo mpe ya zomi ekokoma mikolo ya esengo mpe ya kosepela, ekokoma bafeti ya nkembo mpe ya esengo mpo na libota ya Yuda. Kasi bolinga solo mpe kimia. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ