Ezalaki ndenge wana nde Liloba na Yawe ekokisamaki, liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi : « Mokili ekozwa bopemi na mikolo nyonso oyo bakosundola yango, ekosepela na basaba na yango kino tango mibu tuku sambo ekokoka. »
Nasilikelaki bato na Ngai, nasambwisaki libula na Ngai ; nakabaki bango na maboko na yo, mpe oyokelaki bango mawa te ; bongo omemisaki ata mibange ekangiseli ya kilo makasi.
Tango nyonso bazalaki na pasi, Ye mpe azalaki koyoka pasi na motema ; boye, anjelu oyo atelemaka liboso na Ye abikisaki bango ; asikolaki bango na bolingo mpe na mawa na Ye, akongolaki bango mpe azalaki komema bango mikolo nyonso ya tango ya kala.
Natikala kovanda te kati na batioli to mpe kosepela elongo na bango. Natikalaki kaka ngai moko, pamba te loboko na yo ezalaki likolo na ngai mpe otondisaki ngai na kanda.
Kasi tala liloba oyo Yawe alobi : « Tango mibu tuku sambo ekokoka mpo na Babiloni, nakoya epai na bino mpe nakokokisa elaka na Ngai ya ngolu mpo na kozongisa bino na esika oyo.
tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakozongisa lisusu bomengo kati na bandako ya kapo ya Jakobi mpe nakoyokela bandako na ye mawa ; bakotonga lisusu engumba Siona oyo ebukana-bukana mpe ndako ya mokonzi, na esika na yango ya kala.
Moko kati na bango alobaki epai ya moto oyo alataki bilamba ya lino mpe atelemaki likolo ya mayi ya ebale : — Makambo oyo ya kokamwa ekosala tango boni ?
na mobu ya liboso ya bokonzi na ye, ngai, Daniele, nasosolaki, na nzela ya mikanda, kolanda liloba oyo Yawe apesaki na mosakoli Jeremi, ete kobebisama ya engumba Yelusalemi esengeli kosala mibu tuku sambo.
Na butu, nazwaki emoniseli moko : namonaki liboso na ngai moto moko azali kotambolisa mpunda moko ya langi ya motane ; moto yango atelemaki kati na banzete ya mirite oyo ezalaki kati na lubwaku. Na sima na ye, ezalaki na bampunda mosusu ya langi ya motane, ya shokola mpe ya pembe.
Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.
Bagangaki na mongongo makasi : « Nkolo Nzambe, Yo oyo ozali Bule mpe Solo, okozela kino tango nini mpo na kosambisa bavandi ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso ? »