Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Zakari 1:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bato yango bayebisaki Anjelu ya Yawe, oyo atelemaki kati na banzete ya mirite : — Towuti kotambola na mabele mpe tokuti kimia mpe bopemi na mokili mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Zakari 1:11
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe atunaki Satana : — Owuti wapi ? Satana azongiselaki Yawe : — Nawuti kotambola mpe koyengayenga na mokili.


mpo na nini ozali kosala zuwa, ngomba ya basonge ebele, ngomba oyo Nzambe asepelaka kovanda ? Nzokande Yawe akovanda kuna libela na libela.


Mikili nyonso ezwi bopemi mpe kimia, ekomi koganga na esengo.


Boye, elobaki : — Boni, oyebi mpo na nini nayei epai na yo ? Sik’oyo, nakomi pene ya kozonga mpo na kobundisa mokambi ya Persi ; mpe tango ngai nakokende, mokambi ya Grese akoya ;


Moto oyo azalaki kati na banzete ya mirite alimbolaki : — Ezali bato oyo Yawe atindaki mpo na kotambola na mabele.


Kasi nazali na kanda makasi mpo na bikolo oyo emonaka ete emikoka. Nazalaki kaka na kanda moke mpo na bato na Ngai, kasi bango bayei nde kobakisela bato na Ngai pasi. › »


Na butu, nazwaki emoniseli moko : namonaki liboso na ngai moto moko azali kotambolisa mpunda moko ya langi ya motane ; moto yango atelemaki kati na banzete ya mirite oyo ezalaki kati na lubwaku. Na sima na ye, ezalaki na bampunda mosusu ya langi ya motane, ya shokola mpe ya pembe.


Bampunda nyonso ya makasi ebimaki mpe etondaki na posa makasi ya kotambola na mabele. Boye, Anjelu alobaki na yango : « Bokende kotambola na mokili ! » Mpe ebimaki mpo na kokende kotambola na mabele.


Mwana na Moto akotinda ba-anjelu na Ye ; bongo bakolongola kati na Bokonzi na Ye, nyonso oyo etindikaka bato mosusu na kosala masumu mpe bato oyo basalaka mabe.


Ekozala mpe ndenge wana na suka ya mokili : ba-anjelu bakoya kokabola bato mabe kati na bato ya sembo,


Tango Mwana na Moto akoya kati na nkembo na Ye elongo na ba-anjelu na Ye nyonso, akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo.


Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.


mpe akopesa bopemi epai na biso mpe epai na bino oyo bozali komona pasi, tango Nkolo Yesu akomimonisa wuta na Likolo, elongo na ba-anjelu na Ye ya nguya,


Emoniseli kowuta na Yesu-Klisto. Nzambe apesaki Ye yango mpo ete alakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli koya kala mingi te. Yesu-Klisto atindaki anjelu na Ye koyebisa emoniseli yango epai ya Yoane, mosali na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ