Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yona 4:6 - Mokanda na Bomoi

6 Yawe Nzambe abimisaki nzete moko mpe akolisaki yango mpo na kopesa pio na moto ya Yona mpe kokitisa ye motema. Nzete yango esepelisaki Yona makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yona 4:6
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amani abimaki na esengo mpe na nsayi. Kasi tango Amani amonaki Maridoshe na ekuke ya mokonzi mpe asosolaki ete Maridoshe atelemi te mpe azali kolenga te liboso na ye, Amani asilikelaki Maridoshe makasi.


Ndenge mowumbu azelaka pio ya pokwa to ndenge mongamba azelaka makasi lifuti na ye,


Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga, pamba te ezalaka na mapapu mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo.


Ezekiasi ayambaki bantoma wana na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango.


Bozali kosepela mpo ete bozwi Lo-Debari mpe bozali komikumisa na koloba : « Boni, tobotoli engumba Karinayimi na makasi na biso moko te ? »


Yona abimaki na libanda ya engumba mpe akendeki kovanda na este na yango. Kuna, amitongelaki ndako moko ya matiti mpe avandaki na se ya pio na yango mpo na kozela makambo oyo ekokweyela engumba Ninive.


Kasi na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Nzambe abimisaki mwa nyama moko oyo eliaka banzete ; bongo eliaki nzete yango, mpe nzete yango ekawukaki.


Nzokande, bosepela te komona ete milimo mabe ezali kotosa bino ; bosepela nde ete bakombo na bino ekomami kati na Likolo.


tika ete bato oyo bazali kolela bazala lokola nde bazali kolela te ; tika ete ba-oyo bazali kosepela bazala lokola nde bazali kosepela te ; tika ete ba-oyo bazali kosomba bazala lokola nde bazali na eloko te ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ