Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yona 3:9 - Mokanda na Bomoi

9 Nani ayebi ? Tango mosusu Nzambe akobongola makanisi, akolongola kanda mpe akozongisa motema sima mpo ete tokufa te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yona 3:9
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azongisaki : — Solo, wana mwana azalaki nanu na bomoi, nazalaki kokila bilei mpe kolela, pamba te nazalaki komilobela : « Nani ayebi ? Tango mosusu Yawe akosalela ngai ngolu mpe akotika mwana na bomoi ! »


Akanisaki Boyokani oyo asalaki elongo na bango ; mpe mpo na bolingo monene na Ye, abongolaki mokano na Ye ya komonisa bango pasi.


olimbisaki mabe ya bato na Yo mpe olongolaki masumu na bango nyonso.


Yawe, lembisa moke ! Kino tango nini ekowumela ? Yokela basali na Yo mawa !


Bobongola sik’oyo bizaleli mpe misala na bino, mpe botosa Yawe, Nzambe na bino ; mpe Yawe akobongola mokano oyo asilaki kozwa, mpe akotindela bino lisusu te pasi oyo alakaki bino.


amilobelaki : « Boni ! Oyo ezali te Babiloni monene oyo natongaki lokola ndako ya mokonzi, na makasi na ngai, na nguya na ngai mpe mpo na lokumu ya bokonzi na ngai ? »


Boyinaka kosala mabe, kasi bolingaka nde kosala bolamu ; bolukaka bosembo tango bozali kosambisa. Tango mosusu Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoyokela ndambo ya bato oyo bamikomisaki mbindo te mawa kati na libota ya Jozefi.


Boye, bakamataki Yona mpe babwakaki ye na ebale monene ; mpe mbala moko, ebale monene oyo etombokaki makasi evandaki kimia.


Mokumbi masuwa apusanaki pene ya Yona mpe alobaki na ye : — Ndenge nini okoki penza kolala pongi boye ? Telema mpe belela nzambe na yo, tango mosusu akoki koyokela biso mawa mpo ete tokufa te.


Asambelaki Yawe : — Oh Yawe ! Ezali te makambo ya boye nde nazalaki komilobela tango nazalaki epai na ngai ? Yango wana nasalaki na ngai mobembo na Tarsisi mpo na koluka kokima, pamba te nayebaki malamu ete ozali Nzambe ya ngolu mpe ya mawa, osilikaka noki te mpe otonda na bolingo, obongolaka makanisi na Yo ya kosala bato mabe.


Boluka Yawe, bino bato nyonso ya komikitisa kati na mokili, bino oyo bokokisaka mitindo na Ye ! Boluka kotambola na bosembo mpe na komikitisa ! Tango mosusu bokobika na mokolo ya kanda ya Yawe.


Bosala bililingi oyo ekotalisa bapota na bino ya libumu, mpe oyo ekotalisa bampuku oyo ezali kobebisa mokili na bino ; mpe bopesa nkembo na Nzambe ya Isalaele. Tango mosusu, akolongola loboko na Ye na likolo na bino, na likolo ya banzambe na bino, mpe na likolo ya mokili na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ