6 Tango sango yango ekomaki epai ya mokonzi ya Ninive, atelemaki longwa na kiti na ye ya bokonzi, alongolaki bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki mpe amivandisaki na putulu.
Boye, mokonzi elongo na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki koyoka makambo oyo ekomamaki na mokanda yango bamitungisaki na eloko moko te mpe bapasolaki bilamba na bango te.
Oh bato na ngai, bolata bilamba ya basaki mpe bolala na putulu, bosala matanga lokola moto oyo akufisi mwana na ye se moko. Bolela na mawa, pamba te mobomi akokomela biso na mbalakata.
Bampaka ya Siona, mboka kitoko, bavandi kimia na mabele, bamisopeli putulu na mito na bango mpe balati basaki ; bongo bilenge basi ya Yelusalemi bafukami, bilongi na bango kino na se.
Bakambi nyonso ya bisanga bakotika bakiti na bango ya bokonzi, bakolongola banzambala na bango mpe bilamba na bango batonga bililingi na basinga, bakolata somo lokola elamba mpe bakovanda na mabele ; bakokoma kolenga na somo mpe kobanga tango nyonso, mpo na yo.
Alobaki : — Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele bavandi na yango babongolaki mitema wuta kala, mpe mbele batalisaki yango na kolata basaki mpe na komipakola putulu !
Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki kati na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele wuta kala, bavandi na yango babongola mitema, balata basaki mpe bamipakola putulu.