Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yona 3:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bato ya Ninive bandimelaki Nzambe ; bazwaki mokano ya kokila bilei mpe ya kolata basaki, kobanda na oyo aleki na bozwi kino na oyo aleki na bobola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yona 3:5
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mokonzi Ezekiasi ayokaki bongo, apasolaki bilamba na ye, alataki basaki mpe akotaki na Tempelo ya Yawe.


Jozafati abangaki makasi ; azwaki mokano ya kotuna toli ya Yawe mpe akataki ete mokili mobimba ya Yuda ekila bilei.


Kuna, pene ya ebale Akava, napesaki mitindo ya kokila bilei mpo na komikitisa liboso ya Nzambe na biso mpe kosenga Ye mobembo malamu mpo na biso, mpo na bana na biso mpe mpo na biloko na biso nyonso.


Tango Maridoshe ayokaki makambo nyonso oyo elekaki, apasolaki bilamba na ye ; alataki saki, amipakolaki putulu mpe atambolaki kati na engumba na koganga makasi mpe na mawa.


Bana ya Isalaele balongolaki biloko na bango ya monzele na ngomba Orebi.


Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba : ‹ Yeba Yawe ! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »


Na sanza ya libwa, ya mobu ya mitano ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, babengisaki mokolo ya kokila bilei liboso ya Yawe, mpo na bavandi nyonso ya Yelusalemi mpe bato oyo bawutaki na bingumba ya Yuda.


Bongo, bakonzi nyonso ya basoda mpe Yoanani, mwana mobali ya Karea ; Yezania, mwana mobali Oshaya, mpe bato nyonso, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene, bapusanaki


mpe Jeremi abengaki Yoanani, mwana mobali ya Karea ; bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki elongo na ye mpe bato nyonso, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene.


Boye, nabalolaki elongi na ngai epai na Nkolo Nzambe mpo na kosambela mpe kobondela Ye, na kokila bilei, na kolata basaki mpe na komipakola putulu.


Bopanza sango ya kokila bilei, bobengisa bato na mayangani ya bule, bobengisa bakambi mpe bavandi nyonso ya mokili ete baya na Ndako ya Nzambe na bino mpe bolela epai na Yawe.


Apesaki mitindo ete bapanza sango oyo na Ninive : « Na mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, Epekisami na bato mpe na bibwele, ezala ngombe, meme to ntaba ; epekisami kolia biloko nyonso mpe komela mayi.


Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema mpe bakokatela bato ya ekeke oyo etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Yona.


Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe bakokatela bango etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Yona.


Baninga na ngai, boyika mpiko, pamba te nazali na kondima kati na Nzambe ete akosala ndenge kaka ayebisaki ngai.


Bato nyonso, kobanda na bana mike kino na mikolo, bayokaki ye na bokebi mpe balobaki : « Moto oyo, azali penza nguya ya Nzambe, nguya oyo babengaka : Nguya monene. »


Nzokande kondima ezali ndanga ya kozwa biloko oyo tozali kolikya epai ya Nzambe, mpe kobika lokola nde tosili kozwa biloko yango atako tozali komona yango te.


Mpo na kondima, Noa atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na lobiko ya libota na ye, sima na ye koyoka makebisi ya Nzambe na tina na makambo oyo ezalaki nanu komonana te. Mpo na kondima, Noa amonisaki mabe ya mokili mpe akomaki mokitani ya bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima.


Mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba, nakopesa na batatoli na ngai mibale mosala ya kosakola. Bakolata basaki tango bakozala kosakola. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ