Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yona 3:4 - Mokanda na Bomoi

4 Yona abandaki mosala na ye, atambolaki mokolo mobimba kati na engumba ; azalaki kosakola : — Etikali mikolo tuku minei mpo ete engumba ya Ninive ebebisama nye !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yona 3:4
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »


Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo. Nakokangola yo elongo na engumba oyo, wuta na maboko ya mokonzi ya Asiri, mpe nakobatela yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai mpe mpo na Davidi, mosali na Ngai. › »


Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu, atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa. Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo : Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye !


« Soki botikali kati na mokili oyo, nakobikisa bino mpe nakobebisa bino te ; nakolona bino mpe nakopikola bino te, pamba te etumbu ya pasi oyo natindeli bino esali Ngai pasi na motema.


Tango Nzambe amonaki makambo oyo basalaki mpe ndenge batikaki banzela na bango ya mabe, abongolaki makanisi na Ye mpe atindelaki bango lisusu te etumbu oyo akanaki kopesa bango.


Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema mpe bakokatela bato ya ekeke oyo etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Yona.


pamba te, ndenge Yona azalaki elembo mpo na bato ya Ninive, ndenge wana mpe Mwana na Moto akozala elembo mpo na bato ya ekeke oyo.


Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe bakokatela bango etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Yona.


Soki makambo oyo mosakoli alobi na Kombo na Yawe ekokisami te to esalemi te, wana maloba yango ewutaki na Yawe te. Mosakoli wana alobaki kaka na ndenge na ye moko, bobanga ye te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ