Yona 2:6 - Mokanda na Bomoi6 Nazindi kino na kingo, mayi ya libulu ya molili makasi ezingeli ngai, matiti ya ebale ekangani-kangani zingazinga ya moto na ngai. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
nakozindisa yo kati na libulu ya mozindo esika moko na bato oyo bakitaka kuna, epai ya bato ya kala ; nakovandisa yo kati na mokili oyo ezalaka na se ya mabele, lokola kati na libebi ya kala, mpe okozala elongo na bato oyo bakitaka kati na libulu ya mozindo, mpo ete okoma bisika oyo bato bakovanda lisusu te ; mpe okozonga te to okozwa lisusu bisika te na mabele ya bato ya bomoi.
Boye, makambo oyo nyonso esalemaki mpo ete nzete moko te oyo elonama pembeni ya mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango mpe mpo na songe na yango oyo ekenda kino na mapata ; mpe mpo ete terebente moko te oyo ezali kozwa mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango. Pamba te, yango nyonso etangama ete ekokufa, ekokita kino na mokili ya se ya mabele, kati na bakufi, elongo na bato oyo bakitaka na se ya libulu ya kufa.