Yona 2:4 - Mokanda na Bomoi4 Obwakaki ngai kati na libulu ya molili makasi, kati na mozindo ya ebale monene epai wapi mayi ezingeli ngai mpe bambonge na yo nyonso ekweyeli ngai. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
soki, wuta na mokili ya banguna na bango epai wapi bamemaki bango lokola bawumbu, basengi Yo bolimbisi na mitema mpe na milimo na bango mobimba ; soki basambeli Yo na kotala na ngambo ya mokili na bango, oyo opesaki epai na batata na bango, na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na lokumu ya Kombo na Yo ;
soki, wuta na mokili epai wapi bamemaki bango na bowumbu, basengi Yo bolimbisi, na mitema mpe na milimo na bango mobimba, soki basambeli na kotala na ngambo ya mokili na bango, oyo opesaki epai na batata na bango, na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na lokumu ya Kombo na Yo,