1 Yawe atindaki mbisi moko ya monene komela Yona. Boye Yona asalaki kati na libumu ya mbisi yango mikolo misato mpe babutu misato.
Kuna, okomela mayi ya lubwaku, mpe napesi mitindo epai ya bayanganga mpo ete eleisa yo.
Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye, nakobundela solo nzela na ngai liboso na Ye.
Mpe belela ngai na tango ya pasi ; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.
Soki abeleli ngai, nakoyanola ye ; nakozala elongo na ye na tango ya pasi, nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu.
Yawe, kati na pasi na bango, balukaki Yo ; tango opesaki bango etumbu, bamikabaki na mabondeli makasi.
Nakozonga epai na Ngai kino tango bakososola mabe na bango mpe bakoluka elongi na Ngai ; kati na pasi, bakoluka Ngai makasi.
Soki moko kati na bino azali na pasi, tika ete abondela ; soki moko azali na esengo, tika ete ayemba banzembo mpo na kokumisa Nzambe ;