Yona 1:3 - Mokanda na Bomoi3 Yona atelemaki. Kasi mpo na kokima mosika na Yawe, akendeki na Tarsisi, akitaki na libongo ya Jafa mpe akutaki kuna masuwa moko oyo ezalaki kokende na Tarsisi. Sima na ye kofuta mbongo mpo na mobembo, akotaki na masuwa yango mpo na kokende na Tarsisi, mosika na Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bapakola yango palata balekisa na moto, oyo ewuta na Tarsisi, mpe wolo oyo ewuta na Ufazi ; bato oyo basalaka bililingi na banzete mpe ba-oyo balambaka bibende na moto nde basalaka yango : balatisaka yango bilamba ya langi ya ble mpe ya motane ; ezali misala ya bato oyo basalaka misala ya maboko, oyo bayebi penza mosala malamu.
Asambelaki Yawe : — Oh Yawe ! Ezali te makambo ya boye nde nazalaki komilobela tango nazalaki epai na ngai ? Yango wana nasalaki na ngai mobembo na Tarsisi mpo na koluka kokima, pamba te nayebaki malamu ete ozali Nzambe ya ngolu mpe ya mawa, osilikaka noki te mpe otonda na bolingo, obongolaka makanisi na Yo ya kosala bato mabe.