Namani alobaki : — Lokola oboyi, pesa nzela ete napesa mosali na yo ndambo ya mabele oyo bamile mibale ekoki komema, pamba te mosali na yo akoki te kobonzela banzambe mosusu bambeka ya kotumba to bambeka ya boyokani, bobele Yawe.
Na butu, motema na ngai ezali solo na posa na Yo ; kati na ngai, molimo na ngai ezali kolukaluka Yo makasi, pamba te bavandi ya mokili bayekolaka bosembo tango opesaka mabele bitumbu.
Bongo, babelelaki Yawe : « Oh Yawe, tobondeli Yo, koboma biso te likolo ya moto oyo. Kotika te ete makila ya moto oyo asali mabe te etangama na mito na biso. Pamba te ezali solo Yo Yawe nde osali oyo olingaki. »
Anjelu na Nzambe azongiselaki Manoa : — Ata ozelisi ngai, nakolia ata eloko na yo moko te ; kasi soki obongisi mbeka ya kotumba, bonzela yango nde Yawe. Manoa asosolaki te ete oyo azali liboso na ye azali Anjelu na Yawe.