Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yona 1:1 - Mokanda na Bomoi

1 Yawe alobaki na Yona, mwana mobali ya Amitayi :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yona 1:1
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezalaki ye nde moto abotolaki lisusu bamboka ya Isalaele longwa na Lebo-Amati kino na ebale monene ya Araba, kolanda Liloba na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, mosakoli Yona, mwana mobali ya Amitayi, moto ya Gati-Eferi.


Nkosi egangi ; nani akobanga te ? Nkolo Yawe alobi ; nani akoki koboya kosakola ?


Yawe alobaki na Yona na mbala ya mibale :


Oh bato ya ekeke oyo ! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya Yona. Bongo atikaki bango wana mpe akendeki.


Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe bakokatela bango etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Yona.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ