Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 9:5 - Mokanda na Bomoi

5 Alongolaka bangomba na bisika na yango, wana yango moko eyebaka te, mpe, kati na kanda na Ye, akweyisaka yango ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 9:5
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Liboso ya Nzambe, mboka ya bakufi ezali bolumbu, mpe libulu ya molili ezali polele.


Moto abetaka loboko na ye na likolo ya libanga ya makasi mpe apikolaka ngomba longwa na misisa,


Pamba te ayebi misala na bango, akweyisi bango na butu moko, mpe babebisami.


Sopa nguya ya kanda na yo likolo ya bato, tala bato nyonso ya lolendo liboso na yo mpe kitisa bango !


Moto makasi mpe moto mike-mike ebimaka na monoko na yango.


Bino bangomba, mpo nini bopumbwaki lokola bameme ? Bongo bino bangomba mike, mpo na nini bopumbwaki lokola bana ya ntaba ?


Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo, azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi.


Oh Nzambe, tango obimaki liboso ya bato na Yo, tango otambolaki na esobe,


Nani asila komeka ebale monene kati na loboko na Ye, to likolo na nzela ya molayi ya misapi na Ye ? Nani asila kosangisa putulu nyonso ya mabele kati na katini moko to komeka kilo ya bangomba milayi na nzela ya ndobo to komeka kilo ya bangomba mikuse na nzela ya emekelo kilo ?


Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye, mpe bangomba mikuse epanzanaka. Mabele, mokili mpe bavandi na yango balengaka liboso na Ye.


Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki ? Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli ? Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.


Soki bangomba emoni Yo, elengaka ; mayi etiolaka makasi, ebale monene etombokaka mpe bambonge na yango emataka kino na likolo.


Tango atelemaki, mabele ekomaki koningana makasi ; tango abalolaki elongi na Ye mpo na kotala, bato ya bikolo bakomaki kolenga, bangomba milayi oyo ya kala-kala ebukanaki, mpe bangomba mikuse oyo ya kala-kala ekitaki ; kasi banzela na Ye ewumelaka seko na seko.


Ozali nani, ngomba monene ? Okokoma etando liboso ya Zorobabeli. Akobimisa libanga monene kati na yo, wana bato bakozala koganga na esengo : « Tika ete Nzambe apambola yango ! Tika ete Nzambe apambola yango ! »


Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo.


Kaka na tango yango, rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se, mabele eninganaki, mabanga minene epasukaki,


mabele ekoningana makasi mpe, na bisika ebele, nzala makasi mpe bokono ya ndenge na ndenge ekozala ; makambo ya somo ekosalema, mpe bilembo ya kokamwa ekomonana kowuta na Likolo.


Soki nazali na likabo ya kosakola, ya kososola mabombami nyonso mpe ya koyeba makambo nyonso ; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba.


Na ngonga wana kaka, mabele eninganaki makasi penza ; mpe eteni moko kati na biteni zomi ya engumba ebukanaki mpe, na koningana yango ya mabele, bato nkoto sambo bakufaki. Bato oyo babikaki batondaki na somo mpe bapesaki Nzambe ya Likolo nkembo.


Lola elongwaki lokola mokanda oyo bazali kolinga, bangomba nyonso mpe bisanga nyonso elongwaki na bisika na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ