34 moto oyo akokaki kolongola fimbu ya Nzambe mosika na ngai mpo ete somo na Ye ebangisa ngai lisusu te,
Boni, bokozala ata na somo ya lokumu na Ye te ? Kolenga ekokweyela bino te ?
Yango wana, liboso na Ye, nazali koyoka somo makasi ; mpe wana nazali kokanisa makambo oyo nyonso, nazali kobanga Ye.
Pamba te nazalaki kobanga etumbu ya Nzambe, mpe nakokaki te kosala eloko liboso ya lokumu na Ye.
Boye, somo na ngai ebangisa yo te, mpe monene ya loboko na ngai epanza yo te.
Mpo na yango, motema na ngai ezali kolenga mpe ezali kobeta makasi lokola nde elingi kobima na esika na yango.
Nakangi monoko, nakoloba lisusu te, pamba te Yo nde osali.
Kobeta ngai lisusu te, nazali kokoka lisusu te.
soki babuki mitindo na ngai mpe babateli te mibeko na ngai,
Nani ayebi makasi ya kanda na Yo ? Moto oyo azalaka na botosi mingi epai na Yo asosolaka malamu kanda makasi na Yo.