Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 9:31 - Mokanda na Bomoi

31 okobwaka ngai kaka na libulu ya potopoto, mpe bilamba na ngai ekoyoka ngai nkele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 9:31
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mabe na ngai ekokangama kati na saki, mpe okozipa masumu na ngai.


Monoko na yo moko nde ezali komemela yo etumbu, kasi monoko na ngai te ; bibebu na yo moko nde ezali kofunda yo.


Nzokande, ozali koloba : ‹ Nakozwa nini, litomba nini nakozwa soki nasali masumu te ? ›


Ezala namemaki na ngai ngambo te, monoko na ngai elingaki kaka kokweyisa ngai ; ezala nazalaki sembo, monoko na ngai elingaki kaka kolakisa mbeba na ngai.


Ezala namisukoli nzoto na sabuni mpe nasukoli maboko na ngai na sabuni ya malonga,


Azali moto lokola ngai te mpo ete nazongisela Ye eyano to nakende kosamba na Ye liboso ya basambisi.


Basinga ya lifofe ekokoma bilamba te, misala na bango ekobomba bango te ; misala na bango ezali misala mabe, mpe misala ya mobulu nde ezalaka na maboko na bango.


Moko te azali kobelela Kombo na Yo to kolamusa makanisi mpo na kokangama na Yo, pamba te obombeli biso elongi na Yo mpe obebisi biso likolo ya masumu na biso.


Ata soki omisukoli na kisi oyo basalelaka sabuni to omipakoli sabuni ndenge nini, masumu na yo ekolongwa te liboso na Ngai, » elobi Nkolo Yawe.


Nakobwakela yo bosoto, nakosambwisa yo mpe nakokomisa yo eloko ya maseki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ