30 Ezala namisukoli nzoto na sabuni mpe nasukoli maboko na ngai na sabuni ya malonga,
Soki matambe na ngai ebimaki na nzela na Ye, soki motema na ngai etambolisamaki kolanda miso na ngai, soki maboko na ngai ekomaki mbindo,
Nzokande, ozali koloba : ‹ Nakozwa nini, litomba nini nakozwa soki nasali masumu te ? ›
okobwaka ngai kaka na libulu ya potopoto, mpe bilamba na ngai ekoyoka ngai nkele.
Yawe, nasukoli maboko na ngai mpo na kolakisa ete nasali mabe te, mpe nabandi na etumbelo na Yo,
Petola ngai na nzela ya izope, mpe nakokoma peto ; sukola ngai, mpe nakokoma pembe koleka mvula ya pembe.
Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te, kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.
Ata soki omisukoli na kisi oyo basalelaka sabuni to omipakoli sabuni ndenge nini, masumu na yo ekolongwa te liboso na Ngai, » elobi Nkolo Yawe.
Oh Yelusalemi, petola motema na yo na mabe mpo ete obikisama. Kino tango nini okotika kosala mabongisi ya mabe ?
Lokola bayebaki te ndenge nini Nzambe akomisaka bato sembo mpe balukaki komikomisa sembo na ndenge na bango moko, batosaki te lolenge oyo Nzambe akomisaka bato sembo.
Soki tolobi ete tozali na masumu te, wana tozali komikosa biso moko mpe solo ezali te kati na biso.