29 Lokola esili komonana ete nasali mabe, mpo na nini namitungisa lisusu na pamba ?
Nakoloba na Nzambe : ‹ Kokatela ngai etumbu te, yebisa ngai mabe nini nasali ! ›
atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te, mpe ete ezali na moto moko te oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo ?
Solo, nayebi malamu makanisi mpe mabongisi na bino, mpo na kotelemela ngai ;
Nzokande, Nzambe amoni mbeba kati na ngai, azali kozwa ngai lokola monguna na Ye.
Ezala namemaki na ngai ngambo te, monoko na ngai elingaki kaka kokweyisa ngai ; ezala nazalaki sembo, monoko na ngai elingaki kaka kolakisa mbeba na ngai.
Nyonso ezali kaka ndenge moko ! Yango wana nalobi : ‹ Abomaka bato ya sembo mpe bato mabe. ›
kasi Yawe akosundola moto ya sembo te kati na maboko ya moto mabe, mpe akokweyisa ye te na kosambisama.
Solo, ezali kaka na pamba nde nabatelaki motema na ngai peto ; ezali kaka na pamba nde nasukolaki maboko na ngai mpo ete nasala mabe te !
Kati na makambo oyo nyonso, ozali koloba : ‹ Nayebi ata likambo moko te, kanda ya Nzambe ekokweyela ngai te. › Kasi Ngai nakopesa yo etumbu mpo ete ozali koloba : ‹ Nasali masumu te. ›