27 Soki nalobi : ‹ Nabosana ata pasi na ngai, nabongola elongi na ngai mpe nakoma koseka, ›
Nzokande, soki nalobi, pasi na ngai ekosila te ; bongo soki nakangi monoko nde pasi yango elongwe na bomoi na ngai ?
Yango wana, nakokanga monoko na ngai te, molimo na ngai ekoloba kaka na mawa, mpe motema na ngai ekolela kaka pasi na ngai.
Nakanisaka ete soki nalali, mbeto na ngai ekobondisa ngai mpe pongi ekokitisa pasi na ngai ;
Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, komibomba te wana nazali kobelela Yo.
Pasi na ngai ezangeli kisi mpo na kosilisa yango, motema na ngai elembi kati na ngai.