Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 9:26 - Mokanda na Bomoi

26 Ezali kokende penza mbangu koleka masuwa oyo esalema na papirisi, koleka mpongo oyo ezali kokitela bilei na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 9:26
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mikolo ya bomoi na bango, Saulo mpe Jonatan balinganaki makasi mpe bapesanaki lokumu ; mpe na kufa na bango, bakabolaki bango te. Bazalaki mbangu koleka bampongo, makasi koleka bankosi.


Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga, pamba te ezalaka na mapapu mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo.


Mawa na yo oyo otindaka bantoma na nzela ya ebale kati na bamasuwa oyo basala na papirisi, na likolo ya ebale monene ! Bino bapanzi sango ya mbangu, bokende epai ya bato ya ekolo oyo bazalaka milayi mpe baposo ya nzoto na bango engengaka, epai ya bato ya ekolo oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango.


Tala ! Monguna azali koya na elulu lokola mapata, bashar na ye ezali konguluma lokola mopepe ya makasi ; mpunda na ye kutu eleki mpongo na mbangu. Mawa na biso ! Tokufi na biso !


Bato oyo bazalaki kolanda biso bazalaki mbangu koleka mpongo, na likolo ; bazalaki kolanda biso na likolo ya bangomba mpe kotiela biso mitambo kati na esobe.


Bampunda na bango ekimaka mbangu koleka ata nkoyi, ezalaka na kanda makasi koleka ata mbwa ya zamba oyo ebimaka na pokwa mpo na koluka nyama ya kolia. Basoda na bango oyo batambolaka likolo ya bampunda batambolaka mbangu makasi mpe bawutaka mosika penza, bapumbwaka lokola mpongo soki ezali kokita na elulu mpo na kokanga nyama ya kolia.


Yawe akotindela bino na mosika, wuta na suka ya mokili, ekolo moko oyo ezali lokola mpongo oyo ezali kopumbwa, ekolo oyo bokososola monoko na yango te ; ekobundisa bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ