Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 9:24 - Mokanda na Bomoi

24 Soki mokili ekweyi na maboko ya bato mabe, Nzambe azipaka miso ya basambisi na yango. Soki ezali Ye te, ezali nani ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 9:24
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Davidi azalaki komata ngomba ya banzete ya olive na kolela, moto na ye ya kozipama mpe makolo ngulu. Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazipaki bango mpe mito na bango mpe bazalaki kolela wana bazalaki komata.


Na mokolo wana kaka, bato bazongaki na nkuku kati na engumba lokola mampinga oyo bazali koyoka soni mpo ete bakimi na bitumba.


Sima, Maridoshe azongaki na ekuke ya mokonzi ; kasi Amani azongaki noki na ndako na ye, na soni mpe azipa moto na ye.


Tango kaka mokonzi azongaki na esika oyo basalelaki feti longwa na elanga ya ndako ya mokonzi, Amani amikweyisaki na kiti monene oyo Ester, mwasi ya mokonzi, ayekamaki. Mokonzi agangaki : — Eh ! Alingi lisusu kotungisa mwasi ya mokonzi na miso na ngai kati na ndako na ngai ? Tango kaka mokonzi asilisaki koloba, bazipaki elongi ya Amani.


Boni, ozali kosepela konyokola ngai, kobwaka ekelamu oyo maboko na Yo esali, mpe kolongisa mabongisi ya bato mabe ?


Amemaka bapesi toli na bowumbu mpe akomisaka basambisi bato ya maboma ;


Nzambe akabi ngai na maboko ya bato mabe mpe abwaki ngai na manzaka na bango.


Atako nagangi ete basali ngai mabe, nazali kozwa ata eyano moko te ; ata soki nabeleli ete basunga ngai, moto oyo akokata likambo azali te.


atako ozalaki moto monene, nkolo mabele, mpe ozalaki kovanda na mabele yango lokola moto ya lokumu ;


Bileli ya kufa ezali koyokana wuta na mboka, mpe milimo ya bato oyo bazoki ezali koganga mpo na koluka lisungi, kasi Nzambe azali kopesa etumbu ata na moto moko te.


Soki ezali bongo te, nani akoki kolakisa ngai ete nazali koloba lokuta ? Nani akoloba ete maloba na ngai ezali ya pamba ? »


Kasi Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi mpe ya etuka ya Rami, asilikelaki Yobo makasi, pamba te amimonaki sembo koleka Nzambe.


Yawe, na nzela ya nguya na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato wana, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya mokili oyo. Tika ete kufa ezala litomba na bango ! Tika ete, bango mpe bana na bango, balia na lokoso, mpe mabumu na bango etonda na bikolo oyo obombaka mpo na bango ; bongo babomba ndambo oyo ekotikala mpo na bakitani na bango !


Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi : Namonaki mpinzoli ya banyokolami, mpe moto akobondisa bango azalaki te ; nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli, mpe moto akobondisa bango azalaki te.


Mabele esili kokawuka, pamba te mvula ezali konoka lisusu te, basali bilanga bakomi na pasi mpe bazipi bilongi na bango mpo na soni.


Belitsatsari azongisaki : — Nkolo na ngai, tika ete ndoto oyo ezala mpo na bayini na yo, mpe ndimbola na yango, mpo na banguna na yo !


Bolembisi Yawe na maloba na bino mpe bozali lisusu kotuna : « Tolembisi Yo na likambo nini ? » Ezali tango bozali koloba : « Moto oyo asalaka mabe azali malamu na miso ya Yawe, mpe Yawe asepelaka na ye » to mpe « Wapi Nzambe ya bosembo ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ