Mpe sik’oyo, soki nayei kobimisa maloba oyo epai ya mokonzi, nkolo na ngai, ezali mpo ete bato babangisaki ngai. Yango wana mwasi mosali na yo amilobelaki : « Tika ete naloba na mokonzi, nkolo na ngai. Tango mosusu, akosala kolanda makambo oyo mwasi mosali na ye akosenga.
Mpe sik’oyo, tala makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba : « Tika ete liloba ya mokonzi, nkolo na ngai, epesa ngai bopemi, pamba te mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe oyo ayebaka kososola mabe mpe malamu. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ! »
Bileli ya kufa ezali koyokana wuta na mboka, mpe milimo ya bato oyo bazoki ezali koganga mpo na koluka lisungi, kasi Nzambe azali kopesa etumbu ata na moto moko te.