Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 9:20 - Mokanda na Bomoi

20 Ezala namemaki na ngai ngambo te, monoko na ngai elingaki kaka kokweyisa ngai ; ezala nazalaki sembo, monoko na ngai elingaki kaka kolakisa mbeba na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 9:20
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto moko azalaki kovanda na mokili ya Utsi, kombo na ye ezalaki « Yobo ; » azalaki kotambola na boyengebene mpe na bosembo, azalaki kotosa Nzambe mpe kokima mabe.


Soki nazali na ngambo, wana mawa na ngai ! Ata nasali mabe te, nazali kokoka te kotombola moto, pamba te natondisami na soni mpe nazindi kati na pasi na ngai.


Mabe na ngai ekokangama kati na saki, mpe okozipa masumu na ngai.


‹ Yobo azali koloba na boyebi te, maloba na ye ezali na tina te. ›


elingi koloba ete yo, Yobo, ofungoli monoko na yo kaka na pamba mpe otondisi yango na maloba ya bozoba. »


‹ Boni, moto akoki solo koleka Nzambe na bosembo to akoki solo koleka Mokeli na ye na bule ?


Ezala soki nazalaki moto ya sembo, nalingaki na ngai kokoka te kopesa Ye eyano ; nalingaki kokoka nde kaka kosenga mawa ya Mosambisi na ngai.


« Ezali ya solo, ezali penza ndenge osili koloba, mpe nayebi yango malamu ! Kasi ndenge nini moto oyo asalema na putulu akoki kozala sembo liboso ya Nzambe ?


nazali kaka kobanga pasi na ngai nyonso, pamba te nayebi ete okozwa na Yo ngai te lokola moto ya sembo.


Lokola esili komonana ete nasali mabe, mpo na nini namitungisa lisusu na pamba ?


Yawe, soki obosanaka masumu te, Nkolo, nani akokaki kotelema ?


Kosambisa mosali na Yo te, pamba te moto moko te ya bomoi azali sembo liboso na Yo.


Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya.


Moto ya motema mabe abongaka te, mpe moto ya lolemo ya lokuta akomona pasi.


Nalobaki : « Mawa na ngai ! Nabebi na ngai, pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo, navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo, mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! »


Kasi molakisi ya Mobeko alingaki kolakisa ete azali sembo, boye atunaki na Yesu : — Nani azali moninga na ngai ?


Kasi Yesu alobaki na bango : — Bino, bozali penza bato oyo bomilakisaka na miso ya bato mosusu lokola nde bozali bato ya sembo, nzokande Nzambe ayebi mitema na bino ; pamba te oyo bato bamonaka motuya makasi, Nzambe ayokaka yango nkele.


mpe tembe oyo esilaka te kati na bato oyo mayele na bango ebeba, oyo bayebaka lisusu solo te mpe bakanisaka ete kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela ya kozwa bomengo.


Biso nyonso tobetaka mabaku na lolenge ebele. Moto oyo abetaka libaku te na maloba oyo ebimaka na monoko na ye azali moto ya kokoka mpe azali na makoki ya kobatela bomoto na ye nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ