19 Soki ezali likambo oyo esengi makasi, Ye nde Nkolo-Na-Nguya ! Mpe soki ezali likambo ya bosembo, nani akoki kosambisa Ye ?
Ah, soki nazalaki ata na moto oyo akokaki koyoka ngai ! Yango nde sik’oyo liloba na ngai ya suka. Tika ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayanola ngai ! Tika ete moto oyo afundi ngai akoma na mokanda makambo oyo afundeli ngai !
Bwanya ya Nzambe ezali na bozindo makasi, mpe nguya na Ye ezali monene ; nani asila kotelemela Ye, bongo amona bolamu ?
Botiaka elikya te na mileki ya moyibi, mpe botielaka yango motema te ; soki bomengo na bino ekomi ebele, bokangama na yango te.
Nzambe alobaki mbala moko, ngai nayokaki mbala mibale : « Pamba te makasi ezali ya Nzambe ;
komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.] ›
Pamba te liboma ya Nzambe ezali na bwanya koleka bwanya ya bato, mpe bolembu ya Nzambe ezali makasi koleka makasi ya bato.
Boni, tolingi nde kotumbola zuwa ya Nkolo ? Boni, tozali makasi koleka Ye ?