Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 9:17 - Mokanda na Bomoi

17 pamba te afini ngai na nzela ya mopepe makasi mpe akomisi bapota na ngai ebele na pamba,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 9:17
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Maboko na Yo nde ebongisaki ngai mpe esalaki ngai ; olingi sik’oyo kobenda nzoto mpe koboma ngai ?


Makambo nyonso ezalaki kotambola malamu mpo na ngai, kasi aningisi ngai, akangi ngai na kingo mpe apanzi ngai, akomisi ngai lokola eloko na Ye ya komekela makonga ;


Tango nyonso, azali kaka kozokisa ngai mpe kokweya likolo na ngai lokola elombe.


Nzokande, maboko na ngai etikala kosala moto mabe te, mpe libondeli na ngai ezalaki kosalema na motema peto.


Bamivandisaki na mabele elongo na Yobo mikolo sambo mpe butu sambo. Moko te akokaki koloba na ye ata liloba moko, pamba te bamonaki ndenge nini pasi na ye ezalaki makasi.


Yawe alobaki na Satana : — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe. Azali kaka kotingama na bosembo na ye, atako otindikaki Ngai na pamba ete nasala ye mabe.


Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe mpe abwakelaki Yobo bokono ya mabe na poso ya nzoto, longwa na se ya matambe na ye kino na songe ya moto.


« Na Kombo ya Nzambe oyo awangani bosembo na ngai, na Kombo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso oyo atungisi motema na ngai,


Omemi ngai liboso ya mopepe mpe otiki ete mopepe yango emema ngai, bongo epumbwisi ngai mosika.


Nzokande, Nzambe amoni mbeba kati na ngai, azali kozwa ngai lokola monguna na Ye.


Atako nazali sembo, bazali kozwa ngai lokola mokosi ; atako nasali mabe te, likonga na Ye ezokisi ngai pota oyo esilaka te. ›


Ata nabelelaki Ye, mpe ayanoli ngai, nalingaki na ngai kondima te ete ayoki ngai,


Bato nyonso oyo batalelaka Yo bakotikala koyokisama soni ata moke te ; kaka ba-oyo bapesaka Yo mokongo nde bakoyokisama soni.


Mongongo ya Yawe ebukaka banzete ya sedele ; Yawe abukaka banzete ya sedele ya Libani.


Nzambe, molimo na ngai elembi kati na ngai ; yango wana nazali kokanisa Yo wuta na mokili ya Yordani, wuta na songe ya ngomba Erimoni mpe wuta na ngomba Mitseari.


Ndenge moto ezikisaka zamba, ndenge moto makasi ezikisaka bangomba,


Nakotia bosembo lokola singa oyo bamekelaka molayi mpe boyengebene lokola singa ya mbodi ; mvula ya mabanga ekokombola ekimelo na bino ya lokuta, mpe mayi ekozindisa ebombamelo na bino.


Tala, mopepe makasi ya Yawe etomboki ! Kanda na Ye epeli lokola moto, bakake ezali konguluma mpe kokweyela bato mabe.


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotinda mopepe moko ya makasi, kati na kanda na Ngai, mpe nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, kati na kotomboka na Ngai, mpo na kobebisa nyonso nye.


Akobuka te mwa nzete ya kolemba oyo egumbama mpe akoboma te mwinda oyo elingi kokufa kino akosala ete bosembo elonga


tango mvula ebetaki makasi, mayi eyaki elongo na mopepe makasi, emibwakaki na ndako yango ; ndako yango ekweyaki, mpe nyonso epanzanaki. »


Kasi ezali mpo ete liloba oyo ekomama kati na mibeko na bango ekokisama : « Bayinaki Ngai kaka pamba. »


Yesu azongisaki : — Ezali te mpo na masumu na ye to ya baboti na ye, kasi ezali mpo ete misala ya Nzambe emonisama kati na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ