Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 9:15 - Mokanda na Bomoi

15 Ezala soki nazalaki moto ya sembo, nalingaki na ngai kokoka te kopesa Ye eyano ; nalingaki kokoka nde kaka kosenga mawa ya Mosambisi na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 9:15
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abondelaki Ye, mpe Yawe alembisaki motema, ayokaki libondeli na ye mpe azongisaki ye na Yelusalemi, kati na mokili na ye. Manase asosolaki ete Yawe kaka nde azali Nzambe.


Soki nazali na ngambo, wana mawa na ngai ! Ata nasali mabe te, nazali kokoka te kotombola moto, pamba te natondisami na soni mpe nazindi kati na pasi na ngai.


Nakoloba na Nzambe : ‹ Kokatela ngai etumbu te, yebisa ngai mabe nini nasali ! ›


Okosambela Ye, Ye akoyoka yo, mpe okokokisa ndayi na yo.


Kuna, liboso na Ye, moto ya sembo akososolisa Ye likambo na ngai, mpe nakokangolama libela wuta na maboko ya mosambisi na ngai.


Nalobaki mbala moko, kasi nakoyanola lisusu te ; na mbala ya mibale, nakobakisa lisusu eloko te. »


Kasi soki ezalaki ngai, nalingaki komimonisa liboso ya Nzambe, nalingaki kotalisa Ye likambo na ngai.


Kasi yo, soki oluki Nzambe, soki osengi ngolu epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,


Ata nabelelaki Ye, mpe ayanoli ngai, nalingaki na ngai kondima te ete ayoki ngai,


Ezala namemaki na ngai ngambo te, monoko na ngai elingaki kaka kokweyisa ngai ; ezala nazalaki sembo, monoko na ngai elingaki kaka kolakisa mbeba na ngai.


Atako nazali sembo, motema na ngai etondi na mawa mpo na ngai moko, nayini bomoi na ngai.


Bakendeki na kolela, kasi nakozongisa bango, wana bakozala kati na kobondela ; nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka, na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te ; pamba te nazali Tata ya Isalaele, mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso.


Nzambe na ngai, defisa ngai litoyi na Yo mpe yoka ngai na bokebi ! Fungola miso na Yo mpe mona kobebisama ya bisika na biso mpe ya engumba oyo mpo na bolamu na yango. Ngai, nazali kobelela Kombo na Yo ! Ezali te mpo tozali sembo, kasi ezali nde mpo na mawa monene na Yo nde tozali kobondela Yo !


Boye, nabalolaki elongi na ngai epai na Nkolo Nzambe mpo na kosambela mpe kobondela Ye, na kokila bilei, na kolata basaki mpe na komipakola putulu.


Motema na ngai ezali kosambisa ngai ata na likambo moko te ; nzokande, yango te nde ezali kolongisa ngai. Oyo asambisaka ngai, ezali nde Nkolo.


Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ