14 Bongo, ngai, nakokoka ndenge nini kobeta tembe na Ye ? Nakolonga ndenge nini kopona maloba ya komekana na Ye ?
Kasi, boni, Nzambe akoki solo kovanda na mokili ? Soki kutu Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Yo te, bongo ekozala boni mpo na Tempelo oyo natongi !
nalingaki kotalisa, na bosembo nyonso, likambo na ngai liboso na Ye, mpe kotondisa monoko na ngai na matatoli ya solo,
Kuna, liboso na Ye, moto ya sembo akososolisa Ye likambo na ngai, mpe nakokangolama libela wuta na maboko ya mosambisi na ngai.
toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi, mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba ! »
Boye soki okoki, yanola ngai, mibongisa mpo na komekana na ngai.
Yebisa biso makambo oyo tosengeli koloba na Ye ; tokoki koloba likambo moko te mpo na molili na biso.
mpo na nini te epai ya bato oyo basalema na mabele, ba-oyo bazali kaka putulu mpe bakoki kofinafina bango lokola mitsopi ?
Ata, na mbala nkoto moko, ameki kobeta tembe na Nzambe, akotikala kokoka kolonga ata mbala moko te.
Azali moto lokola ngai te mpo ete nazongisela Ye eyano to nakende kosamba na Ye liboso ya basambisi.