Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 9:12 - Mokanda na Bomoi

12 Soki azwi eloko, nani akoki kobotola Ye yango ? Nani akoki koloba na Ye : ‹ Ozali kosala nini ? ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 9:12
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi mokonzi alobaki : — Bino bana mibali ya Tseruya, yo Abishayi mpe ndeko na yo, Joabi, likambo nini kati na ngai mpe bino ? Soki azali kolakela ngai mabe, ezali nde na ndingisa ya Yawe mpo ete alobi na ye : « Lakela Davidi mabe. » Nani sik’oyo akoki kotuna : « Mpo na nini ozali kosala bongo ? »


Alobaki : « Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai, mpe nakozonga bolumbu. Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa ; tika ete Kombo na Ye ekumisama ! »


atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te, mpe ete ezali na moto moko te oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo ?


Soki akotisi yo na boloko mpe asangisi basambisi mpo na kokata likambo, nani akotelemela Ye ?


Kasi Ye, azwaka Ye moko mokano na Ye ; nani akoki kotelemela Ye ? Asalaka nyonso oyo esepelisaka Ye.


Mpo na nini ozali kosamba na Ye ? Alimbolaka tina ya misala na Ye epai ya moto moko te.


Kasi soki avandi kimia, nani akokweyisa Ye ? Soki abombi elongi na Ye, nani akoki komona Ye ? Nzokande, akengelaka bikolo mpe bato


Lokola liloba ya mokonzi ezalaka na bokonzi, nani akoki koloba na ye : « Ozali kosala nini ? »


Solo, wuta na tango ya kala, nazalaka kaka ndenge moko ; moko te akokoka kokangola na loboko na Ngai. Soki nasali, nani akobongola yango ? »


Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye, ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele ! Boni, potopoto ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : ‹ Ozali kosala nini ? › Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba : ‹ Azali na maboko te ? ›


— Oh bana ya Isalaele, nakoki kosala bino te ndenge mosali mbeki oyo azali kosala, elobi Yawe ? Bana ya Isalaele, bozali te kati na maboko na Ngai lokola mabele oyo basalelaka bikeko kati na maboko ya mosali mbeki ?


Bato nyonso ya mokili bazali pamba na miso na Ye ; asalaka makambo oyo alingi na mampinga nyonso ya likolo mpe na bavandi ya mabele. Moto moko te azali na makoki ya kozongisa loboko na Ye sima.


Iyo, Tata, pamba te, kati na boboto na Yo, olingaki ete esalema bongo !


Boni, nazali na ndingisa te ya kosala na mbongo na ngai nyonso oyo nalingi ? Osilikeli ngai mpo ete nazali moto malamu ? »


« Nani ayebaki makanisi ya Nkolo ? Nani akomaki kopesa Ye toli ?


Kati na Klisto, Nzambe aponaki biso lisusu mpo ete tokitana na libula na biso, kolanda mabongisi ya Ye oyo akokisaka nyonso, kolanda makanisi ya mokano na Ye,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ