11 Soki aleki pene na ngai, nakokoka te komona Ye ; soki mpe akei, nakokoka te komona Ye.
Nzokande, yo ozali komeka koloba ete ozali komona Ye te, ete ozwi nanu eyano te na kolela na yo epai na Ye.
Na lokito ya kake na Yo, mikalikali engengisaki mokili, mabele eninganaki mpe elengaki.
Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen !