Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 8:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nabondeli yo, tuna bato oyo baleka liboso, kanisa mpe landela malamu bwanya ya batata na bango,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 8:8
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi Roboami atunaki toli epai ya bampaka oyo basalaki elongo na Salomo, tata na ye, tango azalaki nanu na bomoi. Alobaki na bango : — Toli nini bozali kopesa ngai lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo ?


Bwanya ezalaka kati na bampaka te ? Bomoi ya molayi epesaka mayele te ?


Miso na ngai emonaki makambo oyo nyonso, matoyi na ngai eyokaki yango, mpe nasosoli yango malamu.


Na ngambo na biso, ezali na bato ya suki pembe, bampaka, bato oyo baleki tata na yo na mibu ya mbotama.


makambo oyo bato ya bwanya balobaki, na kobomba ata eloko moko te kati na makambo oyo bazwaki epai ya batata na bango.


Solo, oyebi malamu ete wuta kala, wuta tango batia moto na likolo ya mabele,


Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo. Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.


— Bino bakambi ya bato, boyoka liloba oyo ; bino nyonso, bavandi ya mokili, botia matoyi mpe boyoka ! Boni, likambo ya boye esila kosalema na tango na bino to mpe na tango ya bakoko na bino ?


Nzokande, makambo nyonso oyo ekomama kala ekomamaki mpo na koteya biso, mpo ete na nzela ya kokanga motema mpe malendisi oyo Makomi epesaka, tozala na elikya.


Makambo wana nyonso ekweyelaki bango mpo ete ezala ndakisa mpo na biso, mpe ekomamaki mpo na kokebisa biso oyo tokomi na tango ya suka.


Bokanisa mikolo ya kala, mpe botala milongo oyo eleka kala ! Botuna na batata na bino, mpe bakoyebisa bino. Botuna na bampaka na bino, mpe bakolimbolela bino.


Luka koyeba makambo oyo esalema na mikolo ya liboso, liboso ete yo obotama, wuta mokolo oyo Nzambe asala moto na mokili ; luka oyeba makambo oyo esalema kati na mokili banda na suka moko kino na suka mosusu, soki likambo ya monene boye esila kosalema, soki likambo ya boye esila koyokana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ