Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 8:6 - Mokanda na Bomoi

6 soki ozali peto, soki ozali sembo, akotelema Ye moko, ata sik’oyo, mpo na kokata likambo na yo mpe kozongisela yo libula na yo, kolanda bosembo na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 8:6
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na Satana : — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe.


soki olongoli lisumu oyo ezali na loboko na yo mpe opekisi mabe kovanda kati na ndako na yo,


Nzokande, maboko na ngai etikala kosala moto mabe te, mpe libondeli na ngai ezalaki kosalema na motema peto.


Bakomisaki koganga ya babola kino epai ya Nzambe, mpe koganga ya banyokolami eyokanaki epai na Ye.


Okososola ete ndako na yo ezali na kimia ; tango okotala bibwele kati na lopango na yo, okomona ete ata moko te ezangi.


Yawe afuti ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bopeto ya maboko na ngai na miso na Ye.


Pamba te, likolo na Yo, babomaka biso mikolo nyonso mpe bazwaka biso lokola bameme ya koboma.


wana tika ete monguna na ngai alanda mpe akanga ngai, tika ete asakanela bomoi na ngai mpe abebisa lokumu na ngai.


Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.


Yawe alakelaka mabe ndako ya moto mabe, kasi apambolaka ndako ya moto ya sembo ;


Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela, nakolongola miso na Ngai likolo na bino ; ezala soki bosambeli mingi, nakoyoka bino te, pamba te maboko na bino etondi na makila.


Loba na moto ya sembo : « Bolamu ekobila yo, pamba te okosepela na mbuma ya misala na yo. »


Oh loboko na Yawe, lamuka, lamuka ! Lata makasi ! Lamuka, lokola na mikolo ya kala, na bileko oyo eleka kala ! Ezali Yo te oyo okataki-kataki Raabi, oyo obomaki dalagona ?


Yango wana nalingi ete mibali basambelaka na bisika nyonso, na kotombola maboko ya bule, na kanda te mpe na koswana te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ