Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 8:22 - Mokanda na Bomoi

22 Banguna na yo bakotondisama na soni, mpe bandako ya bato mabe ekozala lisusu te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 8:22
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, libota ya moto mabe ekofuluka te, mpe moto ekozikisa ndako na ye mpo na mabe na ye moko.


Balongolaka kati na ndako na ye biloko nyonso ya motuya, oyo atielaka motema, mpe akendaka kokutana na bakonzi ya kufa.


bolobaka : ‹ Wapi ndako ya mozwi ? Wapi bandako oyo bato mabe bazalaki kovanda ? ›


Atikaka moto mabe te kozala na bomoi, alongisaka banyokolami,


basinga oyo esimbaka bandako na bango ya kapo epikolamaka na mbalakata, mpe bakufaka ndenge wana bazanga bwanya. ›


Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te ? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »


Ata batieli ndako na bango motema, esimbaka te ; Ezala bakangami na yango, esimbaka kaka te.


kasi soki bapikoli nzete yango na esika na yango, esika yango ewanganaka nzete mpe elobaka : ‹ Natikala komona yo te ! ›


Tika ete bayini na ngai bazanga lokumu mpe bamizipa na soni lokola kazaka.


Nakoyokisa banguna na ye soni, mpe motole na ye ekongenga na mbunzu na ye. »


Tika ete bato nyonso oyo basepelaka na pasi na ngai, bango nyonso lisanga, bayoka soni mpe basambwa ! Tika ete bato oyo batombokelaka ngai balata soni mpe bazala kati na yikiyiki !


Ndako ya moto mabe ekobukana, kasi ndako ya kapo ya bayengebene ekofuluka.


Bakambi nyonso ya bisanga bakotika bakiti na bango ya bokonzi, bakolongola banzambala na bango mpe bilamba na bango batonga bililingi na basinga, bakolata somo lokola elamba mpe bakovanda na mabele ; bakokoma kolenga na somo mpe kobanga tango nyonso, mpo na yo.


Mokonzi akozala na matanga, mokambi akolata pili, mpe maboko ya bato ya mokili ekokoma kolenga. Nakofuta bango kolanda etamboli na bango mpe nakosambisa bango kolanda misala na bango. Boye, bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. › »


Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ