« Boni, moto ya bwanya akopesaka solo eyano na maloba ya pamba boye, maloba oyo ezanga ata tina, to alingaka kotondisa libumu na ye na mopepe ya moto oyo ewutaka na Este ?
Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
Bakalaka ya Faraon balobaki na ye : — Kino tango nini moto oyo akozala motambo mpo na biso ? Tika bango bakende kogumbamela Yawe, Nzambe na bango. Ozali komona te ete Ejipito ebebi ?
« Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?