Kasi lokola sik’oyo akufi, mpo na nini nakila bilei ? Boni, nakoki kozongisa ye lisusu na bomoi ? Ngai nde nakokende epai na ye, kasi ye akozonga epai na ngai te.
Solo, ndenge bakokaka te kolokota mayi oyo esili kosopana, ndenge mpe biso tosengeli kokufa. Kasi sik’oyo, ezali te mokano ya Nzambe mpo na Abisalomi, pamba te asalaki mabongisi mpo ete moto oyo abungi nzela awumela te mosika na Ye.
Yawe, yoka libondeli na ngai ; yoka na bokebi, wana nazali koganga mpo na kosenga lisungi, kovanda nye te liboso ya mpinzoli na ngai, pamba te epai na Yo, nazali mopaya mpe moleki nzela lokola bakoko na ngai.
Bakufi bakozala lisusu na bomoi te, milimo ya bakufi ekozonga lisusu na bomoi te ; opesaki bango etumbu mpe obomaki bango nye ; osalaki ete ata moto moko te akanisa bango lisusu !
Namilobelaki : « Nakomona lisusu Yawe te, Yawe, na mokili ya bato ya bomoi ; nakomona lisusu ata moto moko te to kowumela elongo na bato oyo bavandi na mokili ya lelo !