Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 7:4 - Mokanda na Bomoi

4 Soki kaka nalali, nakomi komituna : ‹ Tango nini nakolamuka ? › Mpe soki kaka nalamuki : ‹ Tango nini butu ekoya ? › Nalembi komitungisa tango nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 7:4
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato oyo bazali komona butu lokola moyi bazali koloba kati na molili : ‹ Pole ekomi pene, › nzokande molili ezali makasi.


Butu ezali kotobola mikuwa na ngai mpe pasi ezali kozangisa ngai pongi.


Nazali kokende lokola elili oyo ezali kolimwa ; bazali kobengana ngai lokola mabanki.


Nazali na elikya kati na Nkolo koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo, koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo.


Pamba te bakufi bakoki lisusu te kotatola Kombo na Yo te ! Mpe kati na mboka ya bakufi, nani akoki kokumisa Yo ?


Nakanisaka Nzambe mpe nalelaka, nakotaka na mozindo ya makanisi mpe nalembaka nzoto.


Oh engumba ya mawa, engumba oyo mopepe makasi esili kobuka mpe ezangeli kobondisama, nakotonga yo lisusu na mabanga ya talo mpe nakosala miboko na yo na mabanga ya safiri,


Na tongo, bokoloba : « Pokwa ekokoma tango nini ? » Mpe na pokwa, bokoloba : « Tongo ekotana tango nini ? » Pamba te somo ekotonda na mitema na bino mpo na makambo nyonso oyo miso ekomona.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ