3 ngai nazwaki lokola libula, basanza ya pamba mpe babutu ya pasi na pasi.
Oh Nzambe ! Solo penza, olembisi ngai ! Obebisi ndako na ngai nyonso,
Akokokisa ekateli oyo azwaki na tina na ngai mpe ebele ya mabongisi mosusu oyo akobongisa.
« Ah ! Soki nakokaki kozala lisusu ndenge nazalaki na basanza oyo eleki, ndenge nazalaki na mikolo oyo Nzambe azalaki kobatela ngai,
Ndenge mowumbu azelaka pio ya pokwa to ndenge mongamba azelaka makasi lifuti na ye,
Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka mpo na mwa tango moke.
Pamba te bakufi bakoki lisusu te kotatola Kombo na Yo te ! Mpe kati na mboka ya bakufi, nani akoki kokumisa Yo ?
Kolela elembisi ngai nzoto. Butu nyonso, nalelaka na mbeto na ngai, mpe napolisaka na mpinzoli, esika oyo nalalaka.
Namona misala nyonso oyo esalemaka na se ya moyi ; nyonso wana ezali kaka pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.