20 Oh Mokeli na ngai, soki nasali lisumu, eloko nini ngai nasali Yo ? Mpo na nini oponi kaka kobeta ngai ? Boni, nakomi mokumba mpo na Yo ?
Ezali Yo, bobele Yo, nde ozali Yawe ! Okela Likolo, Likolo oyo eleki Likolo mpe mampinga nyonso ya Likolo ; okela lisusu mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; opesaka bomoi na bikelamu nyonso, mpe mampinga ya Likolo egumbamaka liboso na Yo.
Soki nasalaki masumu, olingaki komona ngai, mpe olingaki te kozanga kopesa ngai etumbu mpo na masumu na ngai.
Nakoloba na Nzambe : ‹ Kokatela ngai etumbu te, yebisa ngai mabe nini nasali ! ›
mpo ete oluka mabe na ngai to okundola masumu na ngai,
Pamba te okomaka makambo mabe na tina na ngai mpe okomisi ngai mokitani ya masumu ya bolenge na ngai.
Solo penza, okotanga makolo na ngai, kasi okolandela lisusu masumu na ngai te.
Mabe na yo ezali monene te ? Masumu na yo eleki ndelo te ?
Pamba te kolela ekomi bilei na ngai, bileli na ngai ezali kosopana lokola mayi.
soki nabombaki lisumu na ngai ndenge Adamu asalaki to nabombaki yango na motema na ngai,
Boye akoyemba na miso ya bato mpe akoloba : ‹ Nasalaki masumu mpe natambolaki na bosembo te, kasi nazwi lifuti oyo nasengelaki kozwa te.
‹ Nazali sembo, nasali masumu te ; nazali peto, namemi na ngai ngambo te. ›
Nzokande, ozali koloba : ‹ Nakozwa nini, litomba nini nakozwa soki nasali masumu te ? ›
Soki osali masumu, ekosala Nzambe nini ? Soki masumu na yo ezali ebele, ekosala Ye nini ?
Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai, mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango ; Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye.
Atako bakani kosala Yo mabe, atako basali mabongisi ya mabe mpo na kotelemela Yo, bakotikala kolonga ata moke te ;
Yawe, bolingo na Yo ekenda kino na likolo, boyengebene na Yo kino na mapata.
Oh Nzambe, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.
Abendaki tolotolo na Ye mpe akomisaki ngai esika na Ye ya kobamba makonga.