Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 7:2 - Mokanda na Bomoi

2 Ndenge mowumbu azelaka pio ya pokwa to ndenge mongamba azelaka makasi lifuti na ye,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 7:2
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Amori alobaki na bango : « Motema ya Sishemi, mwana na ngai ya mobali ezali kopela na bolingo mpo na mwana na bino ya mwasi. Nabondeli bino, bopesa ye na libala mpo na Sishemi.


Boni, bomoi ya moto awa na se ezali kaka bomoi ya pasi te ? Mikolo ya bomoi na ye ezali penza mikolo ya mongamba te ?


ngai nazwaki lokola libula, basanza ya pamba mpe babutu ya pasi na pasi.


Monoko na ngai efungwamaka makasi likolo ya kozela, pamba te nazali na posa makasi ya mibeko na Yo.


Nasemboli maboko na ngai epai na Yo ; nakomi komimona lokola mabele ya kokawuka.


Bomibongisa mpo na kobundisa yango ! Botelema, tika ete tobundisa yango na midi ! Kasi mawa na biso, pamba te mokolo esili mpe molili ya pokwa ezali koya.


Okonyokola te moninga na yo to okoyiba ye te. Okobomba te lifuti ya mosali na yo butu mobimba kino na tongo.


Yawe Nzambe abimisaki nzete moko mpe akolisaki yango mpo na kopesa pio na moto ya Yona mpe kokitisa ye motema. Nzete yango esepelisaki Yona makasi.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Pesa ye lifuti na ye ya mokolo na mokolo na pokwa, pamba te azali mobali mpe atiaka elikya na lifuti yango, noki te akoganga epai na Yawe na tina na yo mpe okosala lisumu.


Bozali ata koboya kofuta basali bilanga na bino. Yoka ndenge bazali kolela ! Mpe kolela na bango ekomi kino na matoyi ya Nkolo, Mokonzi ya mampinga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ