Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.
Bakufi bakozala lisusu na bomoi te, milimo ya bakufi ekozonga lisusu na bomoi te ; opesaki bango etumbu mpe obomaki bango nye ; osalaki ete ata moto moko te akanisa bango lisusu !
Lolemo na bango ezali lokola likonga oyo ebomaka, ebimisaka kaka maloba ya lokuta. Moto na moto alobaka na moninga na ye na esengo na monoko ; kasi na se ya motema, atielaka ye motambo.
Kati na engumba yango, Yawe azali sembo, asalaka mabe te ; mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Ye mpe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo. Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo te amonaka likambo ya soni te.
Kati na esobe yango, apesaki yo mana mpo na kolia, bilei oyo batata na yo batikala koyeba te, mpo na kobuka lolendo na yo mpe komeka yo, mpo ete na suka, okoka komona bolamu.
Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te ? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.