17 Moto azali penza nani mpo ete okanisaka ye, mpo ete olandelaka ye na bokebi,
Olingi kaka kolandela ekelamu ya boye ? Olingi kaka komema ye liboso na Yo mpo na kosambisa ye ?
« Boni, litomba nini Nzambe akoki kozwa epai ya moto ? Ezala ata moto ya bwanya, azalaka na litomba kaka mpo na ye moko.
toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi, mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba ! »
Boni, nakomi ebale to elima ya mayi mpo ete batiela ngai bikangiseli ?
Oh Yawe, moto nde nani mpo ete obatelaka ye ? Moto nde nani mpo ete okanisaka ye ?
Tango natalaka Lola na Yo, mosala ya misapi na Yo, sanza mpe minzoto oyo otia,
namitunaka : Moto azali nini mpo ete okanisa ye, mpe moto azali nani mpo ete obatela ye ?
Nzokande, ezali na moko oyo atatolaki boye kati na Makomi : « Moto azali nini mpo ete okanisa ye ? Mwana na moto azali nani mpo ete obatela ye ?
Ndenge kaka lisese ya kala elobi : « Misala mabe ewutaka epai ya bato mabe, » loboko na ngai ekosimba yo te.